Eyenga ya Mbotama, eyenga ya nsai !

O ntei ya mposo motoba ikofandisa bisu o molili mingi, tokosepela mbotama ya mwana, oyo akomiyebisa na maloba : Liboso 'te Abraham abotamaka, ngai nazalaka. Bongo Yezu alingi kuyebisa bisu 'te uto bileko binso, azalaka o mboka Nzambe, mpe uto wana akomi motu. Akomi motu mpo ya nini ? Yemei alobi : Nakomi o nse mpo 'te batu bazala na bomoi, na bomoi bwa boike. Na bolamu bwa ye bwa Nzambe akomi motu mpo 'te alakisa bisu boniboni toyokana na limemye, tosangana na Nzambe na bolingi mpe tosangola bomoi bwa lobiko.
Mokolo mosusu elenge mobali alobeli ngai : "Soko Nzambe apesaki mitindu te, mbele bomoi bwa bisu bozalaki na nsai eleki." Wana akotuka Nzambe solo. Mitindu mya Nzambe mikolakisa bisu nzila ya bomoi bwa bisu mpo 'te batu banso bafanda malamu, mpo 'te toyoka elengi mingi, mpo 'te toyokana na nsai o nse eye. Soko tokobomba mitindu myango te, moi na moi batu bakokabwana na bowelani. Ekosuka na mboka ya bapulusi mpe na boloko itondi na babandí !... Nzambe azali Tata molamu mpo ya batu. Akolula bobele 'te báfanda o kati ya boboto, bolingi mpe makila malamu ! Na mitindu mya ye, na ndakisa ya Mwana wa ye mpe ya ndakisa ya baye banso bakolanda Yezu, akolakisa bisu nzila ya bosembo bwa solo. Nzambe akoloto ndoto ya bolamu mpo ya nse mobimba, kasi alingi 'te mpe bisu tósimba mosala mwa bisu mpo ya kubongisa mokili. Yemei akokaba bomoi, bomoi bwa botondi mpe bomoi bwa lobiko.
Mokolo mosusu Yezu alobi : Oyo o ntei ya binu azali na lisumu te, abwakela libanga lya liboso. Ayebaki 'te bisu tozali basumuki. Na ntina wana amipesi mobimba kin'o mpasi mpe liwa o kuruse. O limpati lya nsuka atikeli bisu bilembo bya yango o sakramentu ya Ukaristia : Kamatani mpe boliya, eye ezali nzotu ya ngai. Kamatani mpe bomele, eye ezali makila ma ngai makosopana mpo ya binu mpe mpo ya batu banso, mpo 'te bozwa bolimbisi bwa masumu. Na ngrasya ya Nzambe mpe na lisalisi lya Elimu santu, tokoki kufanda o misu ma Ye na bosembo mpe na bosantu. Yango ezali likabo linene lya Nzambe, oyo azali mokonzi otondi na bolamu mpe bolingi. Tozwi libiki. Libandi na mbotama ya mwana moke o eliele, kasi wana ntango ya sika ebandi mpo ya nse mobimba. Nzambe aponi Maria 'te akoma mama wa Yezu. Anzelu abimeli ye mpe Maria andimi na FIAT ya Ye. Bongo Nzambe Mwana akomi motu.
Yoane akobanda Nsango Ndamu na maloba maye : O libandela Liloba azalaki mpe Liloba azalaki Nzambe. Binso bikelami na ye; soko ye te, eloko yoko ekelamaki te. Ayei o mboka ya ye mpe nse eye ayambaki ye te. Kasi baye bayambi ye, apesi bango likoki lya kokoma bana ba Nzambe.
Eyamba ya bana ba Nzambe ezali solo liziba lya nkita o bomoi bwa bango. Tomeka kubongisa bomoi bwa bisu engebene eyamba ya bisu mpe tolendisa yango na losambo mokolo na mokolo. Tosangana na baninga mpo ya sakramentu ya Ukaristia o mokolo mwa lomingo. Wana nganga nzambe akosalisa batu mpo 'te bomoi bwa bango botonda na makanisi ma Nzambe, botonda na bolingi, bomikabi mpe bosembo. Nganga Nzambe akotamboisa batu 'te babanela baninga, liboso baye balembi, babola mpe baye bazalaki na makila mabe. Mabongi maye mazali kokembisa bomoi bwa batu o misu ma Nzambe mpe ma batu. Ndebakomi bakristu ba solo, bayekoli ba mwana o eliele, oyo akomi mokonzi wa bisu, Yezu Kristu.
Santu Luka akomi o Nsango Ndamu : Mwana Yezu akoli na bwanya o misu ma Nzambe mpe ma batu. Soko tokolandisa ndakisa ya ye tokobika mpe ndetozali na nsai enene. Omaniola eyele eye: Esengo ya solo ezali lokola bumerang. Ekozonga epai ya yo mbala na mbala okokabela basusu. Tokotombola binu yango na motema mobimba.
Eyenga elamu ya Mbotama ya Yezu !
Sango André Loyson, Klein Bijgaardenstraat 27A,
Sint-Pieters-Leeuw, Belgique
Tel. 02.333.08.38
www.hoogdagartikel.com